17 Yawe, tondisa bilongi na bango na soni mpo ete baluka Kombo na Yo !
Tika ete bayini na ngai bazanga lokumu mpe bamizipa na soni lokola kazaka.
Tika ete bato nyonso oyo basepelaka na pasi na ngai, bango nyonso lisanga, bayoka soni mpe basambwa ! Tika ete bato oyo batombokelaka ngai balata soni mpe bazala kati na yikiyiki !
Tika ete bato oyo bazali komeka bomoi na ngai basambwa mpe bayoka soni ; tika ete bato oyo bazali kokana kosala ngai mabe bazonga sima mpe bakoma mawa-mawa !