Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Banzembo 83:13 - Mokanda na Bomoi

13 oyo bazalaki koloba : « Tobotola mabele ya Nzambe ! »

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Banzembo 83:13
15 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Olingi kaka kotungisa lokasa oyo mopepe ezali komema ? Olingi kaka kolandela lititi oyo ekawuka ?


Mokolo nini mopepe makasi ekomema bango lokola makasa to matiti ya kokawuka ?


Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Nzembo ya Davidi, ya koyemba lokola nzembo na kombo « Mboloko ya tongo. »


Tika ete bakoma lokola matiti ya kokawuka oyo mopepe ezali kopumbwisa, tango anjelu ya Yawe akotindika bango ;


Pamba te ezalaki na mopanga na bango te nde babotolaki mokili, ezalaki mpe maboko na bango te nde ebikisaki bango ; kasi ezalaki nde loboko na Yo ya mobali, nguya na Yo mpe pole ya elongi na Yo, pamba te ozalaki kolinga bango.


Na monene ya nguya na Yo, obebisi batelemeli na Yo ; na kanda na Yo, otombokeli bango, mpe baziki lokola matiti.


Tango nanu batiami kutu na mabele te, nanu balonami kutu te, mobimbi na bango ezwi nanu ata misisa te, afuli bango lokola mopepe mpe bakawuki, bongo mopepe makasi ememi bango lokola matiti ya kokawuka.


Nani abimisaki wuta na este moto oyo bosembo ezali kobenga na makolo na yango, oyo elonga elandaka matambe na Ye ? Nani akabaki bikolo na maboko na Ye mpe atiaki bakonzi na se ya bokonzi na Ye ? Mopanga na Ye ekomisaki bango putulu, mpe tolotolo na Ye ekomisaki bango lokola matiti ya kokawuka oyo mopepe ememaka.


« Nakopanza bino lokola matiti ya kokawuka oyo mopepe ya esobe ememaka.


Mpo ete olobaki : ‘ Mikili oyo mibale, Isalaele mpe Yuda, elongo na bikolo na yango ekokoma ya ngai, mpe nakozwa yango, ’ atako Yawe azalaki kuna ;


Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Moyini alobaki na tina na bino : ‘ Ah, bangomba ya kala ekomi sik’oyo ya biso ! ’ ›


Asimbi kiyungulu na loboko na Ye, akopetola etando na Ye mpo na koyamba ble kati na ebombelo na Ye ; kasi akotumba kati na moto oyo ekufaka te, matiti oyo ekotikala. »


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ