Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Banzembo 83:10 - Mokanda na Bomoi

10 Sala bango ndenge osalaki Madiani, ndenge osalaki Sisera mpe Yabini, kuna na mayi ya Kishoni.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Banzembo 83:10
10 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Ebembe ya Jezabeli ekozala lokola nyei kati na bilanga ya Jizireyeli mpo ete moto moko te akoka lisusu koloba : Tala Jezabeli ! › »


« Bakokufa na kufa ya somo, bakolela bango te mpe bakokunda bango te, kasi bakozala lokola matiti ya kopola na mabele. Bakokufa na mopanga mpe na nzala makasi, bongo bibembe na bango ekokoma bilei ya bandeke ya likolo mpe ya banyama ya zamba. »


Bakotanda yango na se ya moyi, na se ya sanza mpe na se ya mampinga nyonso ya likolo, oyo balingaki, basalelaki na esengo, balandaki, batunaki makambo mpe bafukamelaki. Bakosangisa lisusu mikuwa yango te mpo na kokunda yango, kasi ekokoma lokola matiti ya kopola, na mabele.


Nakotindela bato pasi ya makasi : bakokoma kotambola lokola bato balangwe masanga, pamba te basalaki masumu liboso ya Yawe ; bakopanza makila na bango lokola putulu mpe bakobwaka misopo na bango lokola salite.


Kati na Isakari mpe Aseri, Manase azwaki Beti-Sheani elongo na bamboka na yango ya mike-mike, Yibileayimi elongo na bamboka na yango ya mike-mike, Dori elongo na bamboka na yango ya mike-mike, Eyini-Dori elongo na bamboka na yango ya mike-mike, Taanaki elongo na bamboka na yango ya mike-mike, mpe Megido elongo na bamboka na yango ya mike-mike (engumba ya misato, kati na molongo, ezali Nafoti).


Wana Baraki azalaki kokende, Yawe apanzaki, na nzela ya mopanga na Ye, Sisera, bashar na ye nyonso mpe mampinga na ye ya basoda. Sisera asundolaki shar na ye mpe akimaki na makolo.


Kasi Baraki alandaki bashar mpe mampinga kino na Arosheti-Goyimi. Mampinga nyonso ya basoda ya Sisera ekufaki na mopanga, ata moto moko te abikaki.


Mayi moke ya Kishoni ememaki bango, mayi moke ya tango ya kala, mayi moke ya Kishoni. Tika ete molimo na ngai etambola na nguya !


Bakangaki bakonzi mibale ya bato ya Madiani : Orebi mpe Zeebi. Babomaki Orebi na libanga monene ya Orebi, mpe Zeebi na esika oyo bakamolaka vino ya Zeebi. Balandaki bato ya Madiani mpe bamemelaki Jedeon mito ya Orebi mpe ya Zeebi, kuna na ngambo ya Yordani.


Bongo, Saulo alobaki na basali na ye : — Bolukela ngai mwasi oyo asololaka na bakufi mpo ete nakende kotuna ye. Basali na ye bazongisaki : — Tala, ezali na mwasi moko na Eyini-Dori.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ