Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Banzembo 82:5 - Mokanda na Bomoi

5 Bazangi boyebi mpe bososoli, bazali koyengayenga kati na molili ; miboko nyonso ya mokili ezali koningana.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Banzembo 82:5
19 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

pamba te, biso, tozali bato ya lobi oyo ewuti koleka, toyebi eloko te, mpe mikolo na biso, awa na se, ezali kaka lokola elili.


Soki miboko ebukani, moto ya sembo akoki kosala nini ?


Boni, bato wana nyonso ya misala mabe bayebi eloko te ? Bato baliaka bato na ngai ndenge baliaka lipa, babelelaka Yawe te !


Bango nyonso bazali batomboki, bango nyonso bamibebisa ; moko te asalaka bolamu, ata moto moko te.


Olobaki : « Na tango oyo ngai moko nakobongisa, nakokata makambo na bosembo.


Yawe azali kokonza ; tika ete bato balenga ! Avandi na Kiti ya Bokonzi kati na basheribe ; tika ete mabele eningana !


Lokola bayinaki boyebi mpe baponaki te nzela ya kotosa Yawe,


na bato oyo batikaka nzela ya sembo mpo na kolanda nzela ya molili,


Nzela ya bato ya mobulu ezali lokola molili, bayebaka te eloko nini ekokweyisa bango.


Moto ya bwanya ayebi epai azali kokende, kasi zoba atambolaka na molili ; kasi nasosoli likambo moko : suka na bango mibale ekozala kaka ndenge moko.


Namonaki lisusu likambo moko na se ya moyi : ezala na esika oyo basambisaka bato, mabe ezali kaka ; ezala na esika ya bosembo, mabe ezangaka te.


Nzokande, elanga ya vino ya Yawe, Mokonzi ya mampinga, ezali nde libota ya Isalaele, mpe bato ya Yuda bazali elanga oyo ezalaki kosepelisa Ye. Azalaki kozela bosembo, kasi amonaki nde makila ; makambo ya alima, kasi ayokaki nde kolela ya pasi.


Yango wana bosembo ezali mosika na biso, mpe solo ezali kokomela biso te ; tozali kozela pole, kasi nyonso ezali kaka molili ; toluki moyi, kasi tozali kaka kotambola na molili.


Boye, nalobaki : « Boyoka, bino bakambi ya libota ya Jakobi, bino batambolisi ya libota ya Isalaele ! Ezali bino te bato bosengeli koyeba malamu mibeko ?


Yesu alobaki na bango : — Pole ezali nanu kati na bino mpo na mwa tango moke. Botambola, wana bozali na pole, mpo ete molili ekanga bino te na mbalakata ; pamba te moto oyo atambolaka kati na molili ayebaka te esika nini azali kotia lokolo.


Tala ndenge nini etumbu yango ezali : pole eyaki kati na mokili, kasi bato balingaki molili, pamba te misala na bango ezali mabe.


Lokola bamonaki ete koyeba Nzambe ezali na tina te, Nzambe akabaki bango na makanisi na bango ya mabe, mpo ete basala makambo oyo ebongi te.


Nzokande moboko makasi oyo Nzambe asila kotia ezali kaka ngwi ; batobola makomi oyo na likolo na yango lokola kashe : « Nkolo ayebi bato na Ye, » mpe « Moto nyonso oyo atatolaka Kombo ya Nkolo asengeli koboya mabe. »


Kasi moto oyo ayinaka ndeko na ye azali kati na molili mpe azali kotambola kati na molili ; ayebi te epai azali kokende, pamba te molili esila koboma ye miso.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ