Oh libota ya Davidi, tala liloba oyo Yawe alobi : Kataka makambo na bosembo na tongo nyonso, bikisa monyokolami na maboko ya monyokoli ; soki te, likolo ya mabe oyo basalaki Ngai, kanda na Ngai ekopela mpe ekotumba lokola moto ; mpe ekozala na moto ata moko te mpo na koboma yango.
— Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobi : « Bokataka makambo na bosembo, mpe tika ete moko na moko kati na bino azala na bolingo mpe na mawa ya moto mosusu.
Kosambela ya solo mpe ya peto na miso ya Nzambe, Tata na biso, ezali : kosunga bana bitike mpe basi bakufisa mibali, kati na bapasi na bango, mpe komibatela peto liboso ya makambo ya mokili.