Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Banzembo 81:9 - Mokanda na Bomoi

9 Bato na ngai, boyoka ngai ! Mpe nakokebisa bino. Ah Isalaele, soki kaka ozalaki koyokela ngai !

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Banzembo 81:9
12 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Mishe alobaki : — Solo, yoka nde makambo oyo Yawe alobi ! Ngai namoni Yawe avandi na Kiti na Ye ya bokonzi, wana mampinga nyonso ya likolo ezingeli Ye, na ngambo ya loboko na Ye ya mobali mpe na ngambo ya loboko na Ye ya mwasi.


Pamba te onyokolaki biso kati na etando ya bambwa ya zamba mpe ozipaki biso na molili makasi.


Bino bato na ngai, boyoka ; nazali koloba na bino ! Isalaele, nakoloba mpo na kotelemela yo : « Ngai Nzambe, nazali Nzambe na yo. »


Alobaki : « Soki boyoki na bokebi mongongo na Yawe, Nzambe na bino, mpe bosali oyo ezali sembo na miso na Ye, soki bosali keba na malako na Ye mpe bobateli bikateli na Ye nyonso, nakotindela bino ata bokono moko te oyo natindelaki bato ya Ejipito ; pamba te nazali Yawe oyo abikisaka bino na bokono. »


Bofungola matoyi mpe boyoka mongongo na ngai, bosala keba mpe boyoka malamu makambo oyo nazali koloba !


Kati na bino, Ngai nde nasakolaki, nabikisaki mpe natatolaki ; kasi ezali banzambe ya bapaya te. Bozali batatoli na Ngai, » elobi Yawe, « mpe Ngai, nazali Nzambe.


Bana ya Isalaele, boyoka Liloba na Yawe ! Pamba te Yawe azali kosamba na bino, bavandi ya mokili, mpo ete bosolo, bolingo mpe boyebi ya Nzambe ezali lisusu te kati na mokili ;


Bato ya Yuda batamboli na boyengebene te, bakotisi likambo ya nkele kati na Isalaele mpe na Yelusalemi, pamba te bato ya Yuda babebisi bosantu ya Esika ya bule ya Yawe, Esika ya bule oyo Yawe alingaka makasi : babali basi oyo basambelaka nzambe mopaya.


Ye moko Yawe akambaki bango ; nzambe moko te ya bapaya azalaki elongo na Ye.


Kosalela banzambe mosusu te, banzambe ya bato oyo bazingeli yo ;


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ