Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Banzembo 81:8 - Mokanda na Bomoi

8 Tango ozalaki koganga mpo na pasi, nakangolaki yo, nayanolaki yo kati na kake epai wapi nabombamaki, namekaki yo pembeni ya mayi ya Meriba.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Banzembo 81:8
14 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Bino bato na ngai, boyoka ; nazali koloba na bino ! Isalaele, nakoloba mpo na kotelemela yo : « Ngai Nzambe, nazali Nzambe na yo. »


Mpo na yango, natikaki bango kotambola kolanda baposa ya mitema makasi na bango ; mpe balandaki makanisi na bango.


Alobaki : « Soki boyoki na bokebi mongongo na Yawe, Nzambe na bino, mpe bosali oyo ezali sembo na miso na Ye, soki bosali keba na malako na Ye mpe bobateli bikateli na Ye nyonso, nakotindela bino ata bokono moko te oyo natindelaki bato ya Ejipito ; pamba te nazali Yawe oyo abikisaka bino na bokono. »


Abengaki esika yango Masa mpe Meriba, pamba te bana ya Isalaele baswanisaki ye mpe bamekaki Yawe tango balobaki : « Boni, Yawe yango azali kati na biso to te ? »


Na tongo ya mokolo ya misato, bakake ebetaki, mikalikali ezalaki kongenga, mpe lipata monene ezipaki ngomba ; bongo bato bayokaki bakelelo kobeta makasi. Bato nyonso kati na molako balengaki.


Soki bozwi mokano ya kotosa Ngai, bokolia mbuma kitoko ya mokili.


Ezalaki mayi ya Meriba epai wapi bana ya Isalaele baswanaki na Yawe, mpe epai wapi Yawe alakisaki bosantu na Ye kati na bango.


Nazali koloba na yo penza ya solo : tolobaka makambo oyo toyebi mpe topesaka litatoli na tina na makambo oyo tomoni ; kasi bino, boboyi kondima litatoli na biso.


Nazalaki tango nyonso kosenga, ezala na Bayuda to na bato ya Grese, ete bazongela Nzambe na nzela ya kobongola mitema, mpe batia kondima na bango kati na Yesu, Nkolo na biso.


alobaki na bango lisusu : « Bobatela malamu kati na mitema na bino maloba nyonso oyo nalobi na bino lelo, mpo ete bopesa mitindo epai ya bana na bino ete batosa penza maloba nyonso ya mibeko oyo.


Pusana pembeni mpe yoka makambo nyonso oyo Yawe, Nzambe na biso, akoloba ; bongo na sima, okoyebisa biso makambo nyonso oyo Yawe, Nzambe na biso, akoloba na yo ; mpe biso tokoyoka mpe tokotosa yango. »


Tondimaka matatoli ya bato, kasi litatoli ya Nzambe eleki motuya, pamba te yango nde Nzambe apesa na tina na Mwana na Ye.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ