Oh, soki mitema na bango ezalaki penza ya kobongama mpo na kobanga Ngai mpe kobatela mibeko na Ngai tango nyonso, mpo ete bakoka kozala tango nyonso malamu elongo na bana na bango !
Na mokolo ya sambo, liboso ete moyi elala, bato ya engumba bayaki koloba na Samison : — Eloko nini ezali elengi koleka mafuta ya nzoyi ? Mpe eloko nini eleki nkosi na makasi ? Samison alobaki na bango : — Soki bosalaki likita te na mwasi na ngai, bokokaki koyeba te ndimbola ya lisese na ngai.