Joabi ayebisaki Davidi motango ya bato oyo atangaki, bato oyo bakoki kosalela mopanga na bitumba : bato monkoko moko na nkoto nkama moko kati na Isalaele mobimba, mpe nkoto nkama minei na tuku sambo kati na Yuda.
abalolaki mabele, alongolaki mabanga, mpe alonaki vino ya kitoko koleka ; atongaki kuna ndako molayi ya bakengeli mpe atimolaki ekamolelo ya vino. Akanisaki ete akobuka bambuma ya vino ya kitoko, kasi ebotelaki ye bambuma ya mabe !
Natindelaki bango liboso na bino, banzoyi ya minene oyo ebenganaki bango mosika na bino, na bakonzi mibale ya Amori. Bosalaki yango na mipanga mpe na matolotolo na bino te.