3 liboso ya Efrayimi, ya Benjame mpe ya Manase. Monisa nguya na Yo mpe yaka kobikisa biso !
Yanola ngai, oh Yawe, yanola ngai, mpo ete bato oyo bayeba solo ete Yo, Yawe, nde ozali Nzambe ; na bongo okozongisa mitema ya bato oyo epai na Yo.
Tika ete elongi na Yo engengela ngai, mosali na Yo ; lakisa ngai mibeko na Yo !
Bobonzaka bambeka kolanda mibeko mpe botiaka elikya na bino kati na Yawe.
Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Eyembamaki ndenge moko na « Lisi ya litatoli. » Nzembo ya Davidi mpo na koteya bato.
Wuta na buku ya mokambi ya bayembi : nzembo ya koyemba na lindanda. Loyembo.
Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Ezali ya koyemba lokola « Lisi ya Mobeko. » Litatoli. Nzembo ya Azafi.
Boye, tokozala lisusu mosika na Yo te ; zongisela biso lisusu bomoi, mpe tokobelela Kombo na Yo.
okomisaki biso eloko ya kotiola mpo na bazalani na biso, mpe banguna na biso bakomi kotiola biso.
Otikaki kanda na Yo nyonso ya makasi mpe okitisaki motema na Yo.
Oh Yawe, zongisa biso epai na Yo ; mpe tokozonga penza ! Yeisa mikolo na biso sika ndenge ezalaki na tango ya kala !