9 bandeke ya likolo, mbisi ya ebale monene mpe nyonso oyo etambolaka na bibale.
Okoki penza kososola mabombami ya Nzambe ? Okoki solo kososola bandelo ya Nkolo-Na-Nguya-Nyonso ?
Oh Yawe, misala na Yo ezali ebele ! Osalaki nyonso na bwanya ; mokili etondi na biloko oyo okela.
Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Nzembo ya Davidi ; ezali ya koyemba na lindanda ya bato ya Gati.
Moko te akokani na Nzambe ya Yeshuruni, Nzambe oyo atambolaka na likolo lokola mpunda mpo na kosunga yo, mpe na mapata, kati na nkembo na Ye.