Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Banzembo 8:4 - Mokanda na Bomoi

4 Tango natalaka Lola na Yo, mosala ya misapi na Yo, sanza mpe minzoto oyo otia,

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Banzembo 8:4
25 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Na ebandeli, Nzambe akelaki Likolo mpe mokili.


Bongo Nzambe alobaki : « Tika ete biloko oyo ebimisaka pole ezala na etando ya likolo mpo na kokabola moyi wuta na butu, mpo na kozala bilembo oyo ekolakisa bileko, mikolo mpe mibu,


Na butu wana lisusu, bazwaki masanga ya vino mpe bamelisaki tata na bango ; bongo leki akendeki mpe asangisaki nzoto na tata na ye. Tata na ye atikalaki kaka koyeba likambo yango te, ezala tango mwana na ye ya mwasi akendeki epai na ye to tango alongwaki.


Yawe atalisaki bolamu na Ye epai ya Sara ndenge kaka alobaki mpe akokisaki elaka oyo apesaki ye.


Boni, Nzambe akoki solo kovanda na mokili elongo na bato ? Soki kutu Likolo mpe Likolo oyo eleki likolo ekoki kokoka Yo te, bongo ekozala boni mpo na Tempelo oyo ngai natongi ?


toloba nini mpo na moto oyo azali se mutsopi, mpo na mwana na moto oyo azali kaka nyama moke ya pamba ! »


Moto azali penza nani mpo ete okanisaka ye, mpo ete olandelaka ye na bokebi,


Yawe, kanisa ngai tango okotalisa ngolu na Yo epai ya bato na Yo ! Salela ngai bolamu na nzela ya lobiko na Yo,


Akelaki likolo na mayele na Ye ; pamba te bolingo na Ye ewumelaka seko na seko !


sanza mpe minzoto mpo na kongengisa butu ; pamba te bolingo na Ye ewumelaka seko na seko !


Oh Yawe, moto nde nani mpo ete obatelaka ye ? Moto nde nani mpo ete okanisaka ye ?


Botia elikya te na bakambi to na bato oyo bazangi makoki ya kobikisa.


Likolo etatolaka nkembo ya Nzambe, mapata elobaka misala na Ye.


Nzambe, bosembo na ngai, soki nabeleli Yo, yanola ngai. Kangola ngai na pasi, salela ngai ngolu, mpe yoka libondeli na ngai.


Bakati nzete na Yo ya vino mpe batumbi yango na moto ; tika ete bakufa na pamela ya elongi na Yo !


Banzambe nyonso ya bikolo ezali bikeko ya pamba, nzokande Yawe akela likolo.


Bato bandimaki. Bongo tango bayokaki ete Yawe akanisaki bana ya Isalaele mpe amonaki pasi na bango, bafukamaki mpe bagumbamelaki Yawe.


Na miso na Ye, bikolo nyonso ezali lokola biloko pamba ; amonaka yango lokola eloko pamba to mpe lokola eloko te.


« Ezali Ngai, Ngai nde nabondisaka bino. Ozali nani mpo ete obanga moto oyo akokufa, mwana na moto oyo azali kaka lokola matiti ?


Alobaki na ngai : « Mwana na moto, omoni makambo oyo ? Okomona lisusu makambo ya mbindo koleka oyo ya liboso. »


Kasi Yesu alobaki na ye : — Bambwa ya zamba ezalaka na madusu na yango na se ya mabele mpo na kobombama, mpe bandeke ya likolo ezalaka na bazala na yango ; kasi Mwana na Moto azangi esika ya kolala mpo na kopema.


« Tika ete Nkolo, Nzambe ya Isalaele, akumisama, pamba te ayei mpe akangoli bato na Ye ;


bakobamba yo na mabele, yo mpe bato oyo bazali kati na lopango na yo, mpe bakotika ata libanga moko te na likolo ya libanga mosusu, pamba te oyebaki te tango oyo Nzambe ayaki epai na yo.


Bozalaka na bizaleli ya malamu kati na Bapagano mpo ete, ata soki bazali kotonga bino ete bozali kosala mabe, bandima ata misala malamu na bino mpe bapesa Nzambe nkembo na mokolo oyo akomimonisa.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ