Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Banzembo 8:3 - Mokanda na Bomoi

3 Na nzela ya masanzoli ya bana mpe bana mike, otelemisi ndako batonga makasi, mpo na kotelemela bayini na Yo mpe kokanga monoko ya monguna mpe ya moto oyo alingaka kozongisa mabe na mabe.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Banzembo 8:3
18 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Na ebandeli, Nzambe akelaki Likolo mpe mokili.


Boni, Nzambe azali te kuna na likolo, kati na Lola ? Tala ndenge nini etando ya minzoto ezali likolo koleka !


Boni, bakoki kotanga mampinga na Ye ya lola ? Na likolo ya nani pole ya Nzambe engengaka te ?


Soki kutu sanza ezali kongenga te, mpe minzoto ezali peto te, na miso na Ye,


Kanisa kokumisa misala na Ye, misala oyo bato bazali kokumisa na banzembo.


Osala sanza mpo na koyeba mikolo ya bafeti. Moyi eyebi tango na yango ya kolala.


Yawe asalaka makambo minene ; bato nyonso oyo balingaka yango bakanisaka yango.


bokumisa Ye, bino moyi mpe sanza ; bokumisa Ye, bino minzoto nyonso oyo engengaka ;


Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Nzembo ya Davidi.


Likolo ekelamaki na Liloba na Yawe ; mampinga na yango nyonso, na nzela ya pema ya monoko na Ye.


Yo nde olongaki Rahavi, dalagona ya Ejipito, kino koboma ye ; mpe, na nguya na Yo, opanzaki banguna na Yo.


Tango Yawe asilisaki kosolola na Moyize, na ngomba Sinai, Yawe apesaki ye bitando mibale ya mabanga ya litatoli oyo Nzambe akomaki na mosapi na Ye.


Bongo nakotia bokeseni kati na bato na Ngai mpe bato na yo. Elembo yango ekosalema lobi. »


Kasi soki ezali na nguya ya Nzambe nde Ngai nazali kobengana milimo mabe, wana Bokonzi ya Nzambe esili kokoma kino epai na bino.


Wuta Nzambe akela mokili, makoki na Ye, oyo emonanaka na miso te, lokola nguya na Ye ya seko mpe bonzambe na Ye, emonanaka polele penza, tango bayekolaka yango na nzela ya misala na Ye. Boye, bato bakoki te komilongola na ngambo.


Mpe tango botalaka na mapata mpe bomonaka moyi, sanza, minzoto mpe biloko mosusu oyo ezali na likolo, bokosama te mpo na kofukamela mpe kogumbamela biloko oyo Yawe, Nzambe na bino, apesa na bikolo nyonso oyo ezali na mokili.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ