Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Banzembo 8:2 - Mokanda na Bomoi

2 Oh Yawe, Nkolo na biso, Kombo na Yo ezali monene kati na mokili mobimba ! Ovandisi nkembo na Yo kati na Lola.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Banzembo 8:2
21 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Tika ete bakumisa Kombo ya Yawe ! Pamba te Ye moko kaka nde aleki likolo ; nkembo na Ye eleki mabele mpe likolo.


Boyeba ete Yawe abulisi mpo na Ye moko mosali oyo azali sembo na miso na Ye ; Yawe ayokaka ngai tango nabelelaka Ye.


Kosambwa ekomi tango nyonso liboso na ngai mpe soni ezipi elongi na ngai,


Asilisaka bitumba kino na basuka ya mokili, akataka batolotolo, abukaka makonga mpe atumbaka na moto bashar ya bitumba.


Oh Nzambe, tika ete omitombola na likolo ya Lola ; tika ete nkembo na Yo ezala awa na mokili mobimba !


Kasi kati na bana nyonso ya Isalaele, ezala mbwa ekoganga te liboso ya moto to ya nyama. › Na bongo, bokoyeba ete Yawe asali bokeseni kati na bato ya Ejipito mpe ya Isalaele.


Kobanga mpe somo ekweyeli bango. Na nguya ya loboko na Yo, bakomi bababa lokola libanga kino bato na Yo, oh Yawe, balekaki, kino bato oyo osikolaki balekaki.


basi bato oyo batiaka elikya na Yawe, Yawe ayeisaka makasi na bango ya sika : bapumbwaka likolo lokola bampongo, bapotaka mbangu mpe bapemaka te, batambolaka mpe balembaka te.


Serafe moko na moko azalaki koganga na mosusu : « Bule, Bule, Bule, Yawe, Mokonzi ya mampinga ! Mokili mobimba etondi na nkembo na Ye ! »


Akweyisaka bato ya makasi mpe abebisaka engumba ya makasi.


Nzokande, Yawe azali kati na Tempelo na Ye ya bule ; tika ete mokili mobimba ezala kimia liboso na Ye !


Kaka na tango yango, Yesu alobaki : — Oh Tata, Nkolo ya Likolo mpe ya mabele, nakumisi Yo ! Pamba te, obombaki makambo oyo mpo ete bato ya bwanya mpe bato ya mayele bayeba yango te, kasi olakisi yango na bana mike !


Balobaki na Yesu : — Ozali koyoka makambo oyo bazali koloba ? Yesu azongiselaki bango : — Iyo ! Boni, botikala nanu kotanga te : « Wuta na minoko ya bana mike, mpe ya bana oyo bazali nanu komela mabele, ozwaki lokumu na Yo ? »


Kaka na tango yango, awa Molimo Mosantu atondisaki Ye na esengo, Yesu alobaki : — Oh Tata, Nkolo ya Likolo mpe ya mabele, nakumisi Yo ! Pamba te obombaki makambo oyo, mpo ete bato ya bwanya mpe bato ya mayele bayeba yango te, kasi olakisi yango na bana mike. Iyo, Tata, pamba te yango nde osepelaki kosala.


Kasi, kati na mokili, Nzambe aponaki biloko pamba mpo na koyokisa bato ya bwanya soni, aponaki biloko elemba mpo na koyokisa biloko ya makasi soni.


Yawe akobatelaka makolo ya babulami na Ye, kasi bato mabe bakobunga kati na molili. Moto akotikala kolonga te na makasi na ye moko.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ