Mpo na lokumu ya Kombo na Ngai, nakolembisa kanda ya motema na Ngai ; mpo na lokumu na Ngai, nakozongisa motema na Ngai sima mpo na yo. Yango wana, nakoboma yo te.
Koyina biso te mpo na lokumu ya Kombo na Yo ! Kobebisa te nkembo ya Kiti ya Bokonzi na Yo ! Kanisa boyokani oyo osalaki elongo na biso mpe kobebisa yango te !
Kasi mpo na lokumu ya Kombo na Ngai, nasalaki bongo mpo ete Kombo na Ngai etiolama te na miso ya bikolo oyo liboso na bango, nabimisaki bango na Ejipito.
Bokoyeba solo ete Ngai, nazali Yawe tango nakosalela bino makambo mpo na lokumu ya Kombo na Ngai, kasi kolanda te nzela na bino ya mabe mpe misala na bino ya mbindo, oh libota ya Isalaele, elobi Nkolo Yawe. › »
Kasi mpo na lokumu ya Kombo na Ngai, nasalaki bongo mpo ete Kombo na Ngai etiolama te na miso ya bikolo epai wapi bazalaki kovanda. Ngai moko namimonisaki epai ya bana ya Isalaele na miso ya bikolo wana, mpo na kobimisa bango na Ejipito.
Nkolo, yoka ! Nkolo, limbisa ! Nkolo, yoka na bokebi ! Sala, kowumela te, mpo na lokumu ya Kombo na Yo moko, Nzambe na ngai ! Pamba te ngai, nazali kobelela Kombo na Yo mpo na bolamu ya engumba mpe ya bato na Yo ! »
Soki boyoki te, soki boboyi kozwa mokano ya kopesa Kombo na Ngai lokumu, » elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga, « nakotindela bino elakeli mabe mpe nakolakela lipamboli na bino mabe. Solo, nasili kolakela yango mabe, pamba te bozwaki mokano te ya kopesa Kombo na Ngai lokumu.
Bato ya Kanana mpe bato mosusu ya mokili bakoyoka sango yango, bakobalukela biso mpe bakolongola kombo na biso na mokili. Boye, okosala nini mpo na monene ya Kombo na Yo ?