Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Banzembo 79:8 - Mokanda na Bomoi

8 Kotangela biso te masumu na biso ya kala, kokangela biso motema te, yokela biso mawa, pamba te tokomi na suka !

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Banzembo 79:8
18 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Na molongo ya minei, bakitani na yo bakozonga awa, pamba te masumu ya bato ya Amori ekomi nanu ebele te.


Mwasi yango alobaki na Eliya : — Moto na Nzambe, nasali yo nini ? Boni, oyaki na ndako na ngai mpo na kokundola lisumu na ngai mpe kobomisa mwana na ngai ya mobali ?


Akangolaki bango bambala ebele, kasi bazalaki kaka kosala mabongisi ya kotomboka mpe ya komipesa na bambeba na bango.


Yawe abatelaka bato oyo bazangi mayele. Nalembaki nzoto, kasi abikisi ngai.


Yawe, soki obosanaka masumu te, Nkolo, nani akokaki kotelema ?


Yawe, nagangi epai na Yo ! Nalobi : « Ozali ebombamelo na ngai, libula na ngai kati na mokili ya bato ya bomoi ! »


Okokisi posa ya motema na ye mpe opimeli ye te oyo azalaki kosenga Yo.


Yawe, kokanisa te masumu mpe botomboki ya bolenge na ngai ; kanisa ngai kaka kolanda boboto na Yo, pamba te ozali malamu.


Sik’oyo, kende ! Kamba bato na esika oyo nalobaki na yo. Tala, anjelu na Ngai akozala liboso na yo. Atako bongo, tango mokolo ekokoka mpo ete napesa etumbu, nakopesa bango etumbu mpo na lisumu na bango.


Bingumba na Yo ya bule ekomi esobe ; ezala Siona, yango mpe ekomi esobe ; Yelusalemi etikali lisusu na bato te !


Alobaki na ngai : « Mwana na moto, nazali kotinda yo epai ya bana ya Isalaele, ekolo ya bato ya mito makasi, bato oyo batombokelaka ngai. Wuta kala kino na mokolo ya lelo, bango mpe batata na bango batombokelaka kaka ngai.


Nkolo, nabondeli Yo, kolanda makambo nyonso oyo osalaka mpo na bosembo, kanda mpe kotomboka na Yo ezali kolongwa kati na engumba na Yo, Yelusalemi, ngomba na Yo ya bule ! likolo ya masumu na biso mpe ya mabe ya bakoko na biso, Yelusalemi mpe bato na Yo bakomi eloko ya liseki na miso ya bato nyonso oyo bazingeli biso.


Bazali kobonza bambeka lokola likabo mpo na Ngai, mpe bazali kolia misuni ; kasi Yawe azali kosepela na bango te. Sik’oyo, akokanisa mabe na bango mpe akopesa bango etumbu mpo na masumu na bango : bakozonga na Ejipito.


Bamikotisi penza kati na mabe ndenge basalaki na mikolo ya Gibea. Nzambe akobosana mabe na bango te mpe akopesa bango etumbu mpo na masumu na bango.


Mopaya oyo avandi kati na bino akoleka bino na lokumu tango nyonso, kasi bino bokokita se kokita ;


Pamba te masumu na yango esali mipiku kino na likolo, mpe Nzambe akanisi lisusu misala na yango nyonso ya mabe.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ