Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Banzembo 79:6 - Mokanda na Bomoi

6 Sopela bikolo oyo eyebi Yo te mpe mikili oyo ebelelaka Kombo na Yo te, kanda makasi na Yo ;

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Banzembo 79:6
22 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Boni, bato wana nyonso ya misala mabe bayebi eloko te ? Bato baliaka bato na ngai ndenge baliaka lipa, babelelaka Yawe te !


Yawe azali pene ya bato nyonso oyo babelelaka Ye, ya bato nyonso oyo babelelaka Ye na solo ;


Bango nyonso bazali batomboki, bango nyonso bamibebisa ; moko te asalaka bolamu, ata moto moko te.


Tika ete miso na bango ekufa mpo ete bamona lisusu te, mpe babela mikongo mpo na libela.


Boye, asopelaki bango moto ya kanda na Ye, mobulu ya etumba makasi ; azingelaki bango na moto na bangambo nyonso, kasi basosolaki te ; mpe moto ezikisaki bango, kasi bazwaki penza likambo yango na motema te.


Sopa kanda na Yo likolo ya bikolo ya bapaya oyo endimaka Yo te, likolo ya bato oyo babelelaka Kombo na Yo te, pamba te babebisi Jakobi, babebisi ye mobimba mpe bapanzi mokili na ye.


Pamba te, botala ! Ezali na engumba epai wapi babelelaka Kombo na Ngai nde nabandi kotinda pasi ; boni, bokanisi ete bino bokozwa etumbu te ? Bokozanga te kozwa etumbu, pamba te nazali koyeisa mopanga kati na bavandi nyonso ya mokili, elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga. ›


Yango wana, « bozela Ngai, » elobi Yawe, « bozela Ngai na mokolo oyo nakoya mpo na kosamba elongo na bino ; nazwaki mokano ya kosangisa bato ya bikolo nyonso mpe ya mikili nyonso mpo na kosopela bango kanda na Ngai, makasi nyonso penza ya kanda na Ngai : mokili mobimba ekozika na moto ya nguya ya kanda na Ngai.


Bakosala bongo mpo ete batikalaki koyeba te ezala Tata to ngai.


Tata, Yo oyo ozali sembo, mokili eyebi Yo te ; kasi Ngai nayebi Yo, mpe bato oyo bayebi ete Yo nde otindaki Ngai.


Pamba te tango nazalaki kotambola kati na engumba na bino mpe kotala bikeko oyo bosambelaka, namonaki kutu etumbelo moko bakoma na likolo na yango : Mpo na Nzambe oyo ayebani te. Nzokande, ngai nayei koteya bino Nzambe oyo bosambelaka ata boyebi Ye te.


Lokola bamonaki ete koyeba Nzambe ezali na tina te, Nzambe akabaki bango na makanisi na bango ya mabe, mpo ete basala makambo oyo ebongi te.


Epai ya Lingomba ya Nzambe, oyo ezali kati na Kolinto ; mpe epai ya bato oyo Nzambe abulisa kati na Yesu-Klisto mpe abenga mpo ete bazala basantu, elongo na bato nyonso oyo, na bisika nyonso, babelelaka Kombo ya Nkolo na biso, Yesu-Klisto, Nkolo na bango mpe Nkolo na biso :


mpe kati na moto mpo na kopesa etumbu epai ya bato oyo bayebi Nzambe te mpe batosaka te Sango Malamu ya Yesu, Nkolo na biso.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ