Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Banzembo 79:3 - Mokanda na Bomoi

3 basopi makila na bango lokola mayi zingazinga ya Yelusalemi, mpe moto ya kokunda bango azalaki te !

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Banzembo 79:3
15 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Lokola tango babalolaka mpe batimolaka mabele, mikuwa na biso epanzani liboso ya mboka ya bakufi.


Mpo na nini bikolo eloba : « Nzambe na bango azali wapi ? » Tika ete, na miso na biso, bato ya bikolo bayeba ete ozongiseli bango mabe na mabe, mpo na makila ya basali na Yo, oyo basopaki.


Bongo, bato oyo bazali kondima masakoli na bango bakobwakama na libanda, na babalabala ya Yelusalemi likolo ya nzala makasi mpe ya mopanga. Moto moko te akozala mpo na kokunda bango, ezala bango to basi na bango to mpe bana na bango ya mibali to ya basi. Nakozongisela bango mabe na mabe oyo basalaki.


Nakotindela bango babomi ya lolenge minei, » elobi Yawe : « mopanga, mpo na koboma bango ; mbwa mpo na koswa mpe kobenda bango ; banyama ya zamba mpe bandeke oyo eliaka misuni mpo na kolia mpe kopanza bango.


« Bakokufa na kufa ya somo, bakolela bango te mpe bakokunda bango te, kasi bakozala lokola matiti ya kopola na mabele. Bakokufa na mopanga mpe na nzala makasi, bongo bibembe na bango ekokoma bilei ya bandeke ya likolo mpe ya banyama ya zamba. »


Na tango wana, bato oyo Yawe akoboma bakozala bisika nyonso, longwa na songe moko kino na songe mosusu ya mokili. Bakosalela bango matanga te, bakosangisa bango te mpo na kokunda bango.


nakokaba bango na maboko ya banguna na bango mpe ya bato oyo bazali koluka kosala bango mabe ; mpe bibembe na bango ekokoma bilei ya bandeke ya likolo mpe ya banyama ya mabele.


Nakotindela bato pasi ya makasi : bakokoma kotambola lokola bato balangwe masanga, pamba te basalaki masumu liboso ya Yawe ; bakopanza makila na bango lokola putulu mpe bakobwaka misopo na bango lokola salite.


mpo ete makila ya bato nyonso ya sembo, oyo basopa na mabele, etangama na mito na bino, kobanda na makila ya Abele, moto ya sembo, kino na makila ya Zakari, mwana mobali ya Barashi, oyo bobomaki kati ya Tempelo mpe etumbelo.


Kolanda ndenge ekomama : « Ezali mpo na Yo nde balukaka koboma biso mikolo nyonso ; bazwaka biso lokola bameme ya koboma. »


Bato ya bikolo nyonso, ya mabota nyonso, ya nkota nyonso mpe ya mikili nyonso bakotala bibembe na bango mikolo misato na ndambo, mpe bakoboya ete bakunda yango.


Mpo ete basopaki makila ya basantu mpe ya basakoli na Yo, mpe opesi bango makila mpo ete bamela ndenge ekoki mpo na bango. »


Namonaki ete mwasi yango alangwaki makila ya basantu mpe ya batatoli ya Yesu. Tango kaka namonaki ye, namitungisaki mingi.


Kati na yo, emonanaki makila ya basakoli, ya basantu mpe ya bato nyonso oyo babomamaki na mokili. »


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ