13 Mpe biso, bato na Yo, etonga oyo oleisaka, tokosanzola Yo tango nyonso ; mpe na bikeke nyonso, tokosakola lokumu na Yo.
Boyeba ete Yawe nde azali Nzambe ; Ye nde asala biso, mpe tozali bato na Ye. Solo, tozali bato na Ye mpe etonga oyo aleisaka.
Bikeke nyonso ekotombola kitoko ya misala na Yo mpe ekopanza sango ya misala na Yo ya minene.
Kasi ezali Yo nde obikisaka biso wuta na maboko ya bayini na biso, mpe oyokisaka bayini na biso soni.
Bana na yo ya mibali bakozwa esika ya bakoko na bango ; okotia bango bakambi kati na mokili mobimba.
Nzembo ya Azafi. Oh Nzambe, mpo na nini kosundola biso mpo na tango nyonso ? Mpo na nini kongalisa kanda na Yo likolo ya etonga oyo oleisaka ?
Yawe, kobosana te ete monguna afingi Yo, ete bato bazanga tina batioli Kombo na Yo !
Oh Nzambe, telema mpe lobela Kombo na Yo ! Kanisa lisusu ndenge nini bazoba bafingaka Yo mikolo nyonso !
Pamba te azali Nzambe na biso ; tozali bato oyo aleisaka, etonga oyo abatelaka. Lelo, soki boyoki mongongo na Ye,
bato oyo Ngai moko nabongisaki mpo ete bakoka kotatola lokumu na Ngai.