Kasi Yawe alobaki na ye : — Ezali bongo te ! Soki moto abomi Kayina, bakozongisa mabe mpo na Kayina mbala sambo. Mpe Yawe atiaki elembo na nzoto ya Kayina na tina ete moto oyo akokutana na ye aboma ye te.
Otalisaka bolingo na Yo epai ya bato kino na molongo ya nkoto, kasi opesaka etumbu mpo na masumu ya batata epai ya bana mpe bakitani na bango. Oh Nzambe monene mpe ya nguya, Kombo na Yo ezali Yawe, Mokonzi ya mampinga ;
Boye, okoyeba solo ete Ngai Yawe, nayokaki maloba nyonso ya kotiola oyo olobaki na tina na bangomba ya Isalaele. Olobaki : ‘ Tala, bangomba ebebisami ! Bakabeli biso yango lokola nyama ya kolia ! ’
bopesaka, mpe bakopesa bino ; bakosopa kati na mabenga na bino biloko oyo eleki ebele, oyo bakofina mpe bakoningisa malamu kino ekokoma kosopana. Pamba te bakomeka bino na emekelo kaka oyo bosalelaka mpo na komeka bato mosusu. »