11 Tika ete kolela ya bakangami kati na boloko ekoma liboso na Yo ! Na nguya monene na Yo, bikisa ba-oyo bazwa etumbu ya kufa !
Wuta na Esika na Ye ya bule, wuta na likolo, Yawe atalaki biso awa na mokili
mpo na koyoka kolela ya bakangami kati na boloko mpe kokangola bato oyo bazwaki etumbu ya kufa.
ba-oyo balobaka : « Tokolonga na nzela ya lolemo na biso, bibebu na biso ekolobela biso ; nani akoluka kozala nkolo na biso ? »
Babola bamoni mpe bazali kosepela. Tika ete mitema na bino oyo bolukaka Nzambe ezala na bomoi !
Oh Yawe, yokela biso mawa, tozali kotalela Yo ! Tongo nyonso, zala makasi na biso, zala lobiko na biso na tango ya pasi !
mpo na kofungola miso ya bakufi miso, mpo na kobimisa bakangami na boloko mpe kobimisa bavandi ya molili, na kasho.
komema biso na komekama te, kasi kangola biso longwa na misala ya Satana ; [pamba te bokonzi, nguya mpe nkembo ezali ya Yo seko na seko.] ›
Epai na Ye oyo azali na makoki ya kosala koleka nyonso oyo tokoki kosenga to kokanisa, kolanda nguya na Ye, oyo esalaka kati na biso,