Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Banzembo 78:72 - Mokanda na Bomoi

72 Davidi abatelaki bango na motema ezanga pamela, mpe akambaki bango na maboko ya mayele.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Banzembo 78:72
15 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Davidi azalaki mokonzi ya Isalaele mobimba, azalaki kosalela bato na ye nyonso makambo ya sembo mpe ya alima.


Pamba te Davidi asalaki makambo ya malamu na miso ya Yawe mpe abatelaki mibeko ya Yawe mikolo nyonso ya bomoi na ye, longola kaka likambo moko : likambo ya Iri, moto ya Iti.


Tango Isalaele mobimba bayokaki ndenge mokonzi akataki likambo oyo, babangaki mokonzi mpo ete bamonaki ete azali solo na bwanya ya Nzambe mpo na kokata makambo na bosembo.


Mpo na yo, soki okotambola liboso na Ngai ndenge Davidi, tata na yo, atambolaki na motema malamu mpe na motema ya sembo ; soki okosala nyonso oyo natindaki yo mpe okobatela mibeko mpe malako na Ngai,


Nzambe, tozali kosanzola Yo, tozali kosanzola Kombo na Yo ; mpo ete Kombo na Yo ezali pene, bato bazali kotatola bikamwa na Yo.


« Mwana na moto, sakola mpo na kotelemela babateli bibwele ya mokili ya Isalaele ! Sakola mpe yebisa bango : ‹ Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Mawa na babateli bibwele ya Isalaele, oyo balukaka kaka bolamu na bango moko ! Boni, babateli bibwele basengeli te penza koluka bolamu ya bibwele ?


Sima na Ye kolongola Saulo, akomisaki Davidi mokonzi na bango. Tala maloba oyo Nzambe atatolaki na tina na ye : « Namoni Davidi, mwana mobali ya Yese, moto oyo asepelisaka motema na ngai ; akokokisa solo mokano na ngai nyonso. »


Nzokande, Davidi, sima na ye kokokisa mabongisi ya Nzambe na tango na ye, akufaki mpe akundamaki pembeni ya bakoko na ye ; boye nzoto na ye epolaki.


Sala makasi ete omimonisa liboso ya Nzambe lokola moto ya kokoka, lokola mosali oyo ayokelaka mosala na ye soni te, pamba te ateyaka na bosembo Liloba ya solo.


Soki moko kati na bino azangi bwanya, tika ete asenga yango epai ya Nzambe oyo akopesa ye yango ; pamba te Nzambe apesaka moto nyonso na motema malamu mpe na kopamela te.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ