Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Banzembo 78:53 - Mokanda na Bomoi

53 atambolisaki bango na kimia penza, babangaki eloko te ; mpe ebale monene emelaki banguna na bango.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Banzembo 78:53
9 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Mayi ezipaki banguna na bango, moko te atikalaki na bomoi.


Azindisaki Faraon elongo na mampinga na ye kati na ebale monene ya Barozo ; pamba te bolingo na Ye ewumelaka seko na seko !


Moyize azongiselaki bango : — Bobanga te, boyika mpiko ! Bokomona kokangolama oyo Yawe akomemela bino lelo ; bato ya Ejipito oyo bozali komona lelo, bokotikala komona bango lisusu te.


Yawe alobaki na Moyize : — Mpo na nini ozali koganga boye epai na Ngai ? Loba na bana ya Isalaele ete batambola.


Kasi Yo, Yawe, ofuli mopepe na Yo, mpe ebale monene ezipi bango. Bazindi lokola mbodi kati na mayi makasi.


Moyize ayokaki toli oyo bokilo na ye apesaki ye mpe asalelaki makambo nyonso oyo alobaki.


Mpo na kondima, bato ya Isalaele bakatisaki ebale monene ya Barozo lokola nde bazali kotambola na mabele ya kokawuka ; kasi tango bato ya Ejipito bamekaki kosala lokola bango, bazindaki.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ