Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Banzembo 78:5 - Mokanda na Bomoi

5 Apesaki malako mpo na bolamu ya Jakobi, atiaki mibeko kati na Isalaele, apesaki mitindo epai ya batata na biso ete bateya yango epai ya bana mibali na bango,

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Banzembo 78:5
21 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Pamba te naponaki ye mpo ete ateya bana na ye mpe ndako na ye sima na ye ete bayeba kobatela nzela ya Yawe na kozalaka na etamboli ya malamu mpe ya sembo ; na bongo nde, Ngai Yawe, nakokokisela Abrayami elaka oyo napesaki ye. »


Wuta kala, ngai nayebi, na nzela ya malako na Yo, ete otia mibeko yango mpo na libela.


Asakolaki liloba na Ye epai ya Jakobi, mibeko mpe malako na Ye epai ya Isalaele.


Moyi ebimaka wuta na songe moko ya likolo, mpe esukisaka mobembo na yango na songe mosusu ; eloko moko te ezangaka kozwa molunge na yango.


Pamba te ezali mobeko mpo na Isalaele, mpe mokano ya Nzambe ya Jakobi.


Bokoloba na bango : ‹ Ezali mbeka ya feti ya Pasika mpo na Yawe oyo alekaki bandako ya bana ya Isalaele kati na Ejipito mpe abikisaki bandako na biso tango abomaki bato ya Ejipito. › » Na bongo, bana ya Isalaele bafukamaki mpe bagumbamelaki Yawe.


Okotia kati na sanduku bitando ya mabanga ya mibeko, oyo nakopesa yo.


Okotia kati na sanduku, bitando ya mabanga ya mibeko oyo nakopesa yo mpe okotia mofinuku na likolo ya sanduku.


Moyize azwaki bitando nyonso mibale ya mabanga ya Boyokani mpe atiaki yango kati na Sanduku, akangisaki mabaya na Sanduku mpe atiaki esika ya bolimbisi masumu na likolo na yango.


okotia kati na yango Sanduku ya Litatoli mpe okozipa yango na rido.


Bato na bomoi, bato ya bomoi kaka nde basanzolaka Yo ndenge ngai nazali kosanzola Yo lelo. Batata bakoteya bana na bango boyengebene na Yo.


Na mobeko mpe na lisakoli ! Soki bakoloba bongo te, bakomona tongo te.


Solo, ezali penza na litomba monene kati na makambo nyonso. Pamba te Maloba ya Nzambe epesamaki liboso epai na bango.


Bino batata, bopesaka bana na bino kanda te, kasi bobokolaka bango kati na mateya mpe makebisi ya Nkolo.


Boteya yango na bana na bino na kolobelaka bango yango tango bovandi kati na bandako mpe tango bozali kotambola na nzela, tango bolali pongi mpe tango bolamuki.


Bana na bango oyo bayebi mibeko oyo te basengeli koyoka yango malamu mpe koyekola kotosa Yawe, Nzambe na bino, tango nyonso oyo bokovanda kati na mokili oyo bokozwa sima na kokatisa Yordani. »


alobaki na bango lisusu : « Bobatela malamu kati na mitema na bino maloba nyonso oyo nalobi na bino lelo, mpo ete bopesa mitindo epai ya bana na bino ete batosa penza maloba nyonso ya mibeko oyo.


Tala malako, bikateli mpe mibeko oyo Moyize apesaki na bana ya Isalaele tango babimaki na Ejipito ;


Okoteyaka yango na bana na yo tango ozali na ndako, tango ozali kotambola na nzela, tango olali mpe tango olamuki.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ