Boye, bakozala te lokola bakoko na bango, oyo bazalaki mito makasi mpe batomboki, oyo mitema na bango ezalaki sembo te na miso ya Nzambe, mpe milimo na bango ezangaki boyengebene epai na Ye.
Nzokande, wana batombokelaki Ye mpe bayokisaki Molimo Mosantu na Ye mawa, abalukelaki bango mpe akomaki monguna na bango ; mpe Ye moko akomaki kobundisa bango.
Boye Ezayi alobaki : — Boyoka sik’oyo, bino libota ya Davidi ! Ekoki kaka te mpo na bino kolembisa mitema ya bato ? Boni, bolingi lisusu kolembisa motema ya Nzambe na ngai ?
Kanisaka malamu likambo oyo mpe kobosanaka te ndenge nini opelisaki kanda ya Yawe, Nzambe na yo, kati na esobe : banda mokolo oyo bobimaki wuta na Ejipito kino bokomaki na esika oyo, bozalaki kaka kotosa Yawe te.