Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Banzembo 78:4 - Mokanda na Bomoi

4 Tokobombela yango bakitani na bango te, kasi tokoloba na bikeke oyo ekoya na sima nkembo ya masanzoli ya Yawe, nguya na Ye mpe bikamwa oyo asalaki.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Banzembo 78:4
17 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

makambo oyo bato ya bwanya balobaki, na kobomba ata eloko moko te kati na makambo oyo bazwaki epai ya batata na bango.


mpo na kozongisela Yo matondi mpe kotatola misala minene na Yo.


Yawe, yokela ngai mawa, tala ndenge nini bayini na ngai bazali konyokola ngai, mpe kangola ngai wuta na bikuke ya kufa ;


Bongo tango bana na bino bakotuna bino : ‹ Molulu oyo elakisi nini mpo na bino ? ›


Mikolo ekoya, tango bana na bino ya mibali bakotuna bino : ‹ Molulu oyo elakisi nini ? › Bokoloba na bango : ‹ Ezali na nguya na Ye nde Yawe abimisaki biso na Ejipito, mokili ya bowumbu.


Na mokolo wana, bokoyebisa na bana na bino ya mibali : ‹ Nazali kosala molulu oyo mpo na kokanisa makambo oyo Yawe asalelaki ngai tango abimisaki ngai na Ejipito. ›


Bato na bomoi, bato ya bomoi kaka nde basanzolaka Yo ndenge ngai nazali kosanzola Yo lelo. Batata bakoteya bana na bango boyengebene na Yo.


Boyebisa yango epai ya bana na bino, mpe tika ete bana na bino bayebisa yango epai ya bana na bango ; mpe bana na bango, na milongo ya bato oyo bakoya na sima.


Boteya yango na bana na bino na kolobelaka bango yango tango bovandi kati na bandako mpe tango bozali kotambola na nzela, tango bolali pongi mpe tango bolamuki.


Nzokande, sala keba mpe omisenzela mpo ete obosana te makambo oyo miso na yo emonaki to kotika te makambo yango elongwa na motema na yo na mikolo nyonso ya bomoi na yo. Teya yango na bana na yo mpe na bana na bango oyo bakobotama na sima na bango.


Okoteyaka yango na bana na yo tango ozali na ndako, tango ozali kotambola na nzela, tango olali mpe tango olamuki.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ