Boye, Yawe atindaki mopepe moko oyo ememaki bankanga wuta na ebale monene mpe ebwakaki yango na molako mpe na zingazinga na yango. Etando oyo bankanga ekweyaki ezalaki molayi ya mobembo ya mokolo moko na makolo, mpe ezipaki mabele na bosanda ya metele moko.
Bato babimaki mpo na kolokota bankanga mokolo mobimba, butu na yango mpe mokolo oyo elandaki. Moto moko te atikalaki kozwa na se ya bakilo nkoto moko ; mpe batandaki yango na zingazinga ya molako.