Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Banzembo 78:24 - Mokanda na Bomoi

24 anokiselaki bango mana lokola mvula mpo na kopesa bilei, apesaki bango ble ya Likolo.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Banzembo 78:24
10 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Tango bazalaki na nzala, opesaki bango bilei wuta na likolo ; mpe tango bazalaki na posa ya mayi, obimiselaki bango mayi wuta na libanga. Olobaki na bango ete bakende kobotola mokili oyo, na nzela ya ndayi, olakaki kopesa bango.


Opesaki bango Molimo malamu na Yo mpo na kopesa bango bososoli. Opimelaki bango te mana na Yo, oyo bazalaki kolia, mpe opesaki bango mayi ya komela tango bazalaki na posa ya mayi.


Ndenge kaka basengaki, atindelaki bango bakayi mpe atondisaki bango na bilei ya likolo.


mabele eninganaki, likolo mpe esopaki mayi liboso ya Nzambe, Nzambe ya Sinai ; liboso ya Nzambe, Nzambe ya Isalaele.


Tango mamwe elimwaki, biloko ya mike-mike penza lokola bambuma ya mike-mike emonanaki na mabele ya esobe, pembe lokola mvula ya pembe.


Yawe alobaki na Moyize : — Tala, nakokitisela bino mapa wuta na likolo. Mokolo na mokolo, bato bakobanda kobima mpe kolokota mapa oyo ekoki mpo na kolia mokolo wana. Na nzela wana, nakomeka bango mpo na kotala soki bakobatela to te malako na Ngai.


baliaki bango nyonso bilei ya molimo ya ndenge moko,


Boliaki mapa te mpe bomelaki vino te to masanga mosusu oyo elangwisaka. Nasalaki yango mpo boyeba ete Ngai nazali Yawe, Nzambe na bino.


Abukaki lolendo na yo, abomaki yo nzala mpe aleisaki yo mana oyo yo mpe batata na yo botikalaki koyeba te, mpo na koteya yo ete moto abikaka kaka na lipa te, kasi mpe na maloba nyonso oyo ebimaka na monoko ya Yawe.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ