Nzokande, wana batombokelaki Ye mpe bayokisaki Molimo Mosantu na Ye mawa, abalukelaki bango mpe akomaki monguna na bango ; mpe Ye moko akomaki kobundisa bango.
Moyize ayokaki ndenge libota moko na moko ezalaki kolelalela na ekotelo ya ndako na bango ya kapo. Yawe asilikaki makasi ; mpe Moyize ayokaki pasi mingi na motema.
Atako boyebi malamu makambo oyo nyonso, kasi nalingi kaka koyebisa bino lisusu ete Nkolo akangolaki bato na Ye na bowumbu kati na Ejipito, kasi, sima na yango, abomaki ba-oyo bazalaki na kondima te.