2 Nakofungola monoko na ngai mpo na lisese, nakosakola makambo oyo ebombama wuta na tango ya kala.
Monoko na ngai ekoloba maloba ya bwanya ; motema na ngai ekanisi makambo oyo ekopesa bino bososoli.
Nayokaka masese, mpe nalimbolaka sambole na nzela ya lindanda.
mpo na kososola masese mpe sambole, maloba ya bwanya mpe kolimbola makambo.
Bokanisa lisusu makambo ya liboso, makambo oyo ya kala penza ; solo, Ngai nazali Nzambe, mpe mosusu azali te, nazali Nzambe, moko te akokani na Ngai.
azangaki te kosalela masese mpo na koloba na bango. Kasi soki atikali Ye moko elongo na bayekoli na Ye, azalaki kolimbola makambo nyonso.
Makambo oyo ebombama ezali mpo na Yawe, Nzambe na biso ; mpe makambo oyo emonisami ezali mpo na biso mpe bakitani na biso, mpo na tango nyonso, mpo ete tokoka kosalela maloba nyonso ya mibeko oyo. »