Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Banzembo 78:13 - Mokanda na Bomoi

13 akabolaki ebale monene mpo na kolekisa bango, atelemisaki mayi lokola mir.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Banzembo 78:13
15 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Nagumbami, nalembi makasi ; nakomi moto ya mawa mpo na libela.


Abongolaki ebale monene mabele ya kokawuka ; bakatisaki ebale na makolo ekawuka. Tozali kosepela kati na Ye.


Moyize asembolaki loboko na ye likolo ya ebale monene ; bongo na butu mobimba, Yawe atindaki na ebale monene mopepe makasi ya este oyo ekabolaki mayi ya ebale monene.


Bato ya Isalaele batambolaki na ebale monene lokola na mabele ya kokawuka. Mayi etelemaki lokola mir na ngambo ya loboko na bango ya mobali mpe na ngambo ya loboko na bango ya mwasi.


Kasi bana ya Isalaele batambolaki na ebale monene lokola na mabele ya kokawuka. Mayi etelemaki lokola mir na ngambo ya loboko na bango ya mobali mpe na ngambo ya loboko na bango ya mwasi.


Na pema ya zolo na Yo, mayi ekabwani, bambonge etelemi lokola mir, mpe mozindo ya mayi ekangami kati na ebale monene.


Ye oyo atindaki ete loboko na Ye ya nkembo ezala elongo na loboko ya mobali ya Moyize, Ye oyo akabolaki mayi ya ebale monene liboso na bango mpo na kopesa Kombo na Ye lokumu mpo na libela ;


Ye oyo atambolisaki bango kati na mozindo ? Lokola mpunda kati na esobe, babetaki libaku te ;


Otambolaka na ebale elongo na bampunda na Yo ; boye oningisaka mayi minene.


Mpe tango kaka Banganga-Nzambe oyo bakomema Sanduku ya Yawe, Nkolo ya mokili mobimba, bakotia matambe ya makolo na bango kati na Yordani, mayi na yango ekokabwana na biteni mibale ; mayi oyo ekowuta na ngambo ya likolo ekotelema lokola mir.


mayi oyo ezalaki kowuta na ngambo ya likolo etikaki kotiola mpe esalaki lokola mir moko ya monene, mpe etikaki nzela moko ya monene wuta na engumba Adamu, oyo ezalaki pembeni ya Tsaritani ; bongo na ngambo mosusu, mayi oyo ezalaki kokita kino na ebale monene ya Araba, ebale monene ya Barozo, ya lubwaku ya Yordani, esilaki nyonso. Bato bakatisaki kino na Jeriko oyo ezalaki liboso na bango.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ