11 babosanaki bikamwa na Ye mpe makambo minene oyo atalisaki bango.
Kasi babosanaki noki misala na Ye, bazelaki te kokokisama ya mabongisi na Ye.
mpo ete batonga elikya na bango kati na Nzambe, babosana te misala ya Nzambe mpe babatela mibeko na Ye.
Boni, elenge mwasi abosanaka penza biloko na ye ya monzele ? Boni, mobandami ya libala abosanaka solo mayaka na ye ? Nzokande, bato na Ngai babosani Ngai mikolo ebele.
Bobosanaki Libanga oyo ebotaki bino mpe bomonaki pamba Nzambe oyo apesaki bino bomoi.