Oh bato na ngai, boyoka ngai ! Bino, ekolo na ngai, boyoka ngai malamu : Mpo ete Mobeko ekobimela epai na ngai, lolenge na ngai ya kokata makambo ekoyeisa pole na bikolo.
Bopesa Ngai matoyi na bino mpe boya epai na Ngai, boyoka mpe bokozala na bomoi ; nakosala boyokani ya libela elongo na bino, boyokani oyo nalakaki Davidi, na boyengebene mpe na bolingo na Ngai.