Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Banzembo 77:8 - Mokanda na Bomoi

8 « Boni, Nkolo akobwaka biso penza mpo na libela ? Akosalela biso lisusu bolamu te ?

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Banzembo 77:8
11 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Solo, ndenge bakokaka te kolokota mayi oyo esili kosopana, ndenge mpe biso tosengeli kokufa. Kasi sik’oyo, ezali te mokano ya Nzambe mpo na Abisalomi, pamba te asalaki mabongisi mpo ete moto oyo abungi nzela awumela te mosika na Ye.


Yawe, kino tango nini okobosana ngai mpo na libela ? Kino tango nini okobomba elongi na Yo mpo ete namona Yo te ?


Nzembo ya Azafi. Oh Nzambe, mpo na nini kosundola biso mpo na tango nyonso ? Mpo na nini kongalisa kanda na Yo likolo ya etonga oyo oleisaka ?


Boni, okosilikela biso penza mpo na libela ? Okokangela penza biso kanda mpo na tango nyonso ?


Tango bitape na yango ekokawuka, ekobukana ; basi bakoya kotia yango na moto. Mpo ete bato oyo bazangi mayele, yango wana Mokeli na bango ayokelaki bango mawa te, Mozalisi na bango atalisaki bango ngolu na Ye te.


Mpo na nini pasi na ngai esilaka te mpe pota na ngai ya monene esilaka te ? Solo, namoni ete ozali mpo na ngai lokola etima ya lokuta, lokola mayi oyo bakoki kotiela motema te.


Lokola bosalaki mikolo tuku minei mpo na kononga mokili, bokomona pasi mibu tuku minei mpo na masumu na bino : mobu moko mpo na mokolo moko. Na bongo bokoyeba mbano oyo ezali kati na likambo ya kotelemela Ngai.


Nzambe azali moto te mpo ete akosa, azali mpe mwana ya moto te mpo ete akoka kobongola makanisi na Ye. Boni, akoki solo koloba mpe kosala eloko moko te ? Akoki solo kopesa elaka mpe kokokisa yango te ?


Elingi koloba te ete Liloba na Nzambe ebimaki na pamba, pamba te bakitani nyonso ya Isalaele bazali bana ya Isalaele te,


Bato ebele bakanisaka ete Nkolo azali kowumela mpo na kokokisa elaka na Ye ; nzokande azali nde kokanga motema mpo na bino, pamba te alingi ete moko te abunga, kasi alingi ete bato nyonso babongola mitema.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ