7 Na butu, nakanisaka lisusu banzembo na ngai ; motema na ngai ezongelaka kokanisa, mpe molimo na ngai ekomaka komituna :
ezala akweyi, akotikala kaka ya kokweya te ; pamba te Yawe asimbaka ye na loboko.
Soki bosiliki, bosalaka masumu te ; soki bolali na mbeto, bolukaka kososola makambo mpe bovandaka kimia.
Tomikumisaka mikolo nyonso kati na Nzambe mpe tokokumisa Kombo na Yo mpo na libela.
Nzembo ya Azafi. Oh Nzambe, mpo na nini kosundola biso mpo na tango nyonso ? Mpo na nini kongalisa kanda na Yo likolo ya etonga oyo oleisaka ?
Kino tango nini, Yawe, okokangela biso kanda ? Kino tango nini zuwa na Yo ekopela lokola moto ?
Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Nzembo ya bana ya Kore.
Nzambe Mobikisi na biso, zongela biso ! Longola kanda na Yo na tina na biso !
Solo, lokola sanza, ekowumela na bokonzi mpo na libela. Motatoli oyo azali kuna kati na likolo akoki kokosa te. »
okomisaki moke mikolo ya bolenge na ye mpe olatisaki ye kazaka ya soni.