Oh loboko na Yawe, lamuka, lamuka ! Lata makasi ! Lamuka, lokola na mikolo ya kala, na bileko oyo eleka kala ! Ezali Yo te oyo okataki-kataki Raabi, oyo obomaki dalagona ?
Bokanisa mikolo ya kala, mpe botala milongo oyo eleka kala ! Botuna na batata na bino, mpe bakoyebisa bino. Botuna na bampaka na bino, mpe bakolimbolela bino.