Bana na ye nyonso ya mibali mpe ya basi bayaki kobondisa ye ; kasi aboyaki kobondisama. Alobaki : « Te ; nakozala na matanga kino nakolanda mwana na ngai na mboka ya bakufi epai wapi mwana na ngai azali. » Boye, tata na ye alelaki ye.
Nazalaka na posa ya kokanisa makambo oyo, ndenge mpe nasopaka molimo na ngai : Tango nazalaki kotambola kati na ebele ya bato, nazalaki komema bango kino na Tempelo ya Nzambe, kati na koganga ya esengo mpe ya kozongisa matondi lokola makelele ya bato oyo bazali na feti.
Oh molimo na ngai, mpo na nini olembi boye ? Mpo na nini ozali komitungisa kati na ngai ? Tia elikya na yo kati na Nzambe, pamba te nakosanzola Ye lisusu, Mobikisi mpe Nzambe na ngai.