Kati na pasi na ngai, nabelelaki Yawe, nagangaki epai ya Nzambe na ngai mpo ete asunga ngai. Yawe ayokaki mongongo na ngai wuta na Tempelo na Ye ; koganga na ngai mpo na kosenga lisungi ekomaki kino na matoyi na Ye.
Mbala moko, mabele eninganaki makasi, pamba te anjelu ya Nkolo akitaki longwa na Likolo, akendeki na kunda, atindikaki libanga mpe avandaki na likolo na yango.
Bongo Tempelo ya Nzambe, oyo ezali kati na Lola efungwamaki, mpe Sanduku ya Boyokani na Ye emonanaki kuna kati na Tempelo ya Nzambe. Mpe mikalikali epelaki, mingongo mpe lokito ya bakake eyokanaki, mabele eninganaki, mpe mvula monene ya mabanga enokaki.
Bongo namonaki Kiti monene ya Bokonzi, ya langi ya pembe elongo na Ye oyo avandaki na Kiti yango. Likolo mpe mabele ekimaki mosika na Ye mpe emonanaki lisusu te.