Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Banzembo 77:13 - Mokanda na Bomoi

13 Nakanisaka nyonso oyo osalaki kino na bikamwa na Yo.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Banzembo 77:13
14 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

kino nakendeki na Esika ya bule ya Nzambe mpe nasosolaki ndenge nini bakosuka.


Oh Yawe, nani kati na banzambe azali lokola Yo ? Nani azali lokola Yo, kitoko makasi kati na bosantu, somo, mpe abongi na lokumu, mpe asalaka makambo ya kokamwa ?


« Bolingi kokokanisa Ngai na nani ? Bolingi kotia Ngai esika moko na nani, » elobi Ye oyo azali Mosantu ?


Pamba te Libanga na bango azali lokola libanga na biso te ; bango moko banguna na biso bayebi yango.


Oh Nzambe, ozali Nzambe na ngai ; nazali koluka Yo, molimo na ngai ezali na posa na Yo, bomoi na ngai ezali na posa na Yo makasi, kati na mabele ekawuka mpe ezanga mayi.


Nalukaka eloko moko kowuta na Yawe, eloko moko kaka oyo nasengaka makasi : nalingi kovanda na Tempelo ya Yawe, mikolo nyonso ya bomoi na ngai, mpo na kosepelaka na kitoko ya Yawe mpe kosengaka toli na Ye kati na Tempelo na Ye.


Bolingi kokokanisa Ngai to kotia Ngai esika moko na nani ? Bolingi solo kokokanisa Ngai na nani mpo ete amekana na Ngai ?


Bolingi kokokanisa Nzambe na nani ? Bolingi kokokanisa Ye na elilingi nini ?


Nkolo, nzambe moko te ekokani na Yo, kati na banzambe ; moko te ekoki kosala makambo oyo Yo osalaka.


Nzambe, bosembo na Yo ekenda kino na likolo, pamba te osalaka makambo minene. Oh Nzambe, nani akokani na Yo ?


Oh Nzambe, bazali komona ndenge ozali koya ; koya ya Nzambe na ngai, ya Mokonzi na ngai, kati na Esika ya bule.


Boyemba mpo na lokumu na Ye, bosanzola Ye na mindule ! Botatolaka tango nyonso misala minene na Ye nyonso !


Sala ete nasosola nzela ya mitindo na Yo mpo ete nakanisa misala minene na Yo !


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ