Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Banzembo 77:12 - Mokanda na Bomoi

12 Nakanisaka misala minene ya Yawe, bikamwa na Yo ya kala.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Banzembo 77:12
13 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Tika ete maloba na ngai esepelisa Ye ! Tika ete Yawe azala esengo na ngai !


Boyemba mpo na lokumu na Ye, bosanzola Ye na mindule ! Botatolaka tango nyonso misala minene na Ye nyonso !


Bokanisa bikamwa, makambo minene oyo asalaki mpe bitumbu oyo apesaki,


Yawe, tango nakanisaka mikano na Yo ya kala, nazwaka kati na yango kobondisama.


Nakanisi mikolo ya kala, namilobeli nyonso oyo osala, nakanisi malamu mosala ya maboko na Yo.


Bazali koloba ete bokonzi na Yo etondi na nkembo mpe bazali kopanza sango ya misala ya nguya na Yo.


Bikeke nyonso ekotombola kitoko ya misala na Yo mpe ekopanza sango ya misala na Yo ya minene.


Lolemo na ngai ekotatola tango nyonso misala ya bosembo na Yo, pamba te bato oyo balukaka pasi na ngai bayokisami soni mpe basambwe.


Boye, bato na Ye bakanisaki mikolo ya tango ya kala, mikolo ya tango ya Moyize : Wapi Ye oyo akatisaki bango ebale monene, elongo na mobateli bibwele ya etonga na Ye ? Wapi Ye oyo atiaki kati na bango Molimo Mosantu na Ye ?


Okoteyaka yango na bana na yo tango ozali na ndako, tango ozali kotambola na nzela, tango olali mpe tango olamuki.


Te ! Kobanga yango soki moke te ! Kanisa malamu makambo oyo Yawe, Nzambe na yo, asalaki Faraon mpe Ejipito mobimba.


Omonaki na miso na yo komekama makasi, bilembo ya kokamwa mpe bikamwa, loboko ya nguya mpe loboko esembolama oyo na nzela na yango Yawe, Nzambe na yo, abimisaki yo na Ejipito. Yawe, Nzambe na yo, akosala ndenge moko epai ya bato oyo ozali kobanga.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ