Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Banzembo 76:7 - Mokanda na Bomoi

7 Nzambe ya Jakobi, na kanda na Yo, bato oyo babundaka likolo ya bampunda elongo na bampunda bakweyi na somo.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Banzembo 76:7
15 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Pamba te Yawe azali monene mpe abongi na lokumu, azali somo makasi mpe aleki banzambe nyonso.


Oh Yawe, Nzambe ya Isalaele, ozali penza sembo ! Na ngolu na Yo, na mokolo ya lelo, tozali batikali kati na bato na biso mpe tozali awa liboso na Yo, elongo na masumu na biso ; nzokande moko te kati na biso akoki kotelema bongo liboso na Yo ! »


Yawe, soki obosanaka masumu te, Nkolo, nani akokaki kotelema ?


Bopesa Mwana na Ye beze, noki te akosilika mpe bokokufa na nzela na bino, pamba te kanda na Ye epelaka noki. Esengo na bato oyo bazwaka Ye lokola ebombamelo na bango.


Nani akokani na Yawe kuna na likolo ? Nani akokani na Yawe kati na mampinga ya likolo ?


Nani ayebi makasi ya kanda na Yo ? Moto oyo azalaka na botosi mingi epai na Yo asosolaka malamu kanda makasi na Yo.


Moyize mpe bana ya Isalaele bayembaki loyembo oyo mpo na lokumu ya Yawe : Nakoyemba mpo na lokumu ya Yawe, mpo ete amonisi monene ya nkembo na Ye ! Azindisi mpunda mpe motambolisi na yango kati na ebale monene.


Azindisi na ebale monene, bashar mpe mampinga ya Faraon ; abwaki na ebale monene ya barozo, bakonzi mpe basoda oyo Faraon atielaka motema.


Nani akoki solo kotelema liboso na Ye soki asiliki ? Nani akoki solo kobika soki kanda na Ye epeli ? Mpo ete kanda na Ye epanzanaka lokola moto, bongo mabanga ebukanaka liboso na Ye.


Bobanga te bato oyo bakoki koboma nzoto, kasi bazangi makoki ya koboma elimo ; bobanga nde Ye oyo akoki koboma nzoto mpe elimo kati na lifelo.


Boni, tolingi nde kotumbola zuwa ya Nkolo ? Boni, tozali makasi koleka Ye ?


Azalaki koloba na mongongo makasi : « Botosa Nzambe mpe bopesa Ye nkembo, pamba te tango na Ye ya kosambisa bato ekoki ! Bogumbamela Ye oyo akela likolo mpe mabele, ebale monene mpe bitima ya mayi ! »


Nkolo, nani akomeka koboya kotosa Yo mpe koboya kopesa Kombo na Yo nkembo ? Pamba te Yo kaka nde ozali Bule. Bikolo nyonso ekoya mpe ekogumbama liboso na Yo, pamba te misala na Yo ya sembo emonisami na polele.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ