« Mokili ya Asiri ekokweyisama na mopanga ya moto ya mokili oyo te, ekobebisama na mopanga ya moto te. Bato ya Asiri bakokima liboso ya mopanga, mpe basoda na bango ya bilenge bakokoma kosala misala ya makasi.
Boye, anjelu na Yawe abimaki mpe abomaki bato nkoto nkama moko na tuku mwambe na mitano kati na molako ya bato ya Asiri. Tango bato balamukaki na tongo ya mokolo oyo elandaki, bakutaki kaka bibembe.
Oh mokonzi ya Asiri, bakambi na yo bazali kolala pongi, basoda na yo ya mpiko balali pongi ya makasi, mampinga na yo bapalangani na bangomba mpe moto akosangisa bango azali komonana te.