4 Ezali kuna nde abukaki makonga ya makasi, banguba, mipanga mpe bibundeli nyonso ya bitumba.
Kasi mipanga na bango ekotobola mitema na bango moko, mpe batolotolo na bango ekobukana.
Nkosi moko ebimi na ndako na yango ; mobebisi moko ya bikolo abimi. Atiki esika na ye mpo na koya kobebisa mokili na yo. Bingumba na yo ekobukana mpe ekotikala lisusu na bato te.
Ekomaki konguluma kati na bankosi, pamba te yango mpe ekomaki nkosi ya makasi. Eyekolaki kopasola banyama mpe kolia bato.
Nakobuka tolotolo na yo oyo osimbi na loboko ya mwasi mpe nakokweyisa likonga oyo osimbi na loboko ya mobali.