Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Banzembo 76:12 - Mokanda na Bomoi

12 Epai ya Yawe, Nzambe na bino, bopesa bilaka mpe bokokisa yango. Tika ete bato nyonso oyo bazingeli Ye bamemela Nzambe ya somo makabo !

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Banzembo 76:12
15 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Yawe atindaki anjelu moko oyo abomaki basoda nyonso ya mpiko, bakonzi ya basoda elongo na bakambi kati molako ya mokonzi ya Asiri. Mokonzi ya Asiri azongaki na mokili na ye na soni makasi. Mpe tango akotaki na ndako ya nzambe na ye, bana na ye ya mibali babomaki ye na mopanga.


Yango wana, bino bakonzi, bozala na mayele ; bino bayangeli ya mokili, boyoka likebisi oyo.


Agangeli bango na kanda, apelisi kanda makasi na Ye mpo na bango, alobi :


Bino nyonso, bikolo, bobeta maboko ! Boganga epai na Nzambe na esengo nyonso.


Bonzelaka Nzambe matondi lokola mbeka, mpe kokisaka bandayi na yo epai ya Ye-Oyo-Aleki-Likolo.


Na liloba moko kowuta na Nkolo, basi oyo bamemaka sango basangani bato ebele,


Bosakola ete nguya ezali ya Nzambe oyo nkembo na Ye ezali na Isalaele, mpe nguya na Ye ezali kati na mapata.


Kasi na mokolo wana, Yawe akopesa etumbu na mampinga ya lola kuna na likolo, mpe na bakonzi ya mokili na se.


Bokobakisa makabo oyo na likolo ya makabo oyo bokobonzela Ngai na mikolo ya Saba ya Yawe, na likolo ya bakado na bino, na likolo ya makabo na bino mpo na kokokisa ndayi to na likolo ya makabo oyo bokokata kopesa wuta na mokano ya mitema na bino moko.


Nabomi bato ya bikolo mosusu, bandako na bango ya makasi ebebisami. Nasali ete babalabala na bango etikala lisusu na bato te mpo ete moto moko te alekela lisusu wana. Bingumba na bango ebebisami, ata moto moko te atikali lisusu kuna.


Nzokande, tango bakonzi nyonso ya Amori, na ngambo ya weste ya Yordani, mpe bakonzi nyonso ya Kanana, pene ya ebale monene ya Barozo, bayokaki ndenge nini Yawe akawusaki ebale Yordani liboso ya bana ya Isalaele kino tango basilisaki kokatisa, mitema na bango ebukanaki mpe bazalaki lisusu na makasi te ya kotelemela bana ya Isalaele.


Bakonzi ya mabele, bato minene, bakonzi ya mampinga ya basoda, bazwi, bato ya nguya, bawumbu mpe bansomi bakendeki kobombama kati na madusu ya mabanga mpe kati na mabanga minene ya bangomba.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ