Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Banzembo 74:9 - Mokanda na Bomoi

9 Tozali lisusu komona te bilembo na biso, basakoli bazali lisusu te ; mpe moko te kati na biso ayebi tango boni makambo oyo ekowumela.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Banzembo 74:9
11 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Na bandako epai wapi bokozala, makila ekozala elembo mpo na bino ; bongo tango Ngai nakomona makila yango, nakoleka bino. Boye etumbu moko te ya kufa ekokweya kati na bino tango nakopesa etumbu na mokili ya Ejipito.


Bikuke na yango ezindi na mabele ; abuki-buki mpe abebisi banzete oyo bakangelaka bikuke yango. Mokonzi mpe bakambi na ye bakei na bowumbu kati na bikolo, Mobeko ezali lisusu te, mpe basakoli na ye bazali kozwa lisusu te bimoniseli kowuta na Yawe.


Napesaki bango mpe mikolo na Ngai ya Saba lokola elembo ya boyokani kati na Ngai mpe bango, mpo bayeba ete Ngai Yawe nde nabulisaki bango.


Pasi likolo ya pasi nde ekokomela bango, basango ya mabe na ya mabe nde ekolandana. Bakoluka bimoniseli na pamba epai ya basakoli ; Banganga-Nzambe bakokoka lisusu te koteya malakisi ya Mobeko, mpe bakambi bakozanga toli ya kopesa.


Na mikolo ekoya, » elobi Nkolo Yawe, « nakotinda nzala makasi kati na mokili ; ekozala te nzala ya bilei to posa ya mayi, kasi ekozala nzala ya koyoka Liloba na Yawe.


Na butu, bokozwa lisusu bimoniseli te. Soki bapesi bango te eloko ya kolia, molili ekozingela bino mpe bokokoka lisusu kosakola te ! Moyi ekobimela lisusu basakoli yango te, mpe mokolo ekokoma molili mpo na bango.


Bamoni makambo bakotonda na soni, mpe bato oyo balobaka makambo oyo ekoya bakosambwa. Bango nyonso bakobomba bilongi na bango, pamba te Nzambe akoyanola bango te. »


Nzambe mpe azalaki kokokisa bosolo ya litatoli na bango na nzela ya bilembo ya kokamwa, na nzela ya misala minene, ya bikamwa ya ndenge na ndenge mpe ya makabo ya Molimo Mosantu, oyo azalaki kopesa bango kolanda mokano na Ye.


Jedeon alobaki : — Solo, soki nazwi ngolu na miso na Yo, pesa ngai elembo oyo ekolakisa solo ete Yo Yawe nde ozali kosolola na ngai.


Elenge mobali Samuele azalaki kosalela Yawe na bokambami ya Eli. Na mikolo wana, Yawe azalaki koloba mingi te epai ya bato, mpe bimoniseli ezalaki mingi te.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ