Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Banzembo 74:4 - Mokanda na Bomoi

4 bayini na Yo bagangi lokola nkosi, ata kati na esika oyo okutanaka na biso, batelemisi bendele na bango lokola elembo.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Banzembo 74:4
9 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Boye, mpo na kobebisa bango, Yawe atindaki mokonzi ya bato ya Babiloni, oyo abomaki na mopanga bilenge na bango kati na esika na bango ya bule ; abikisaki te ezala elenge mobali, elenge mwasi, mokolo to mobange. Nzambe akabaki nyonso na maboko ya Nabukodonozori.


Yawe abwaki etumbelo na ye, asundoli esika na ye ya bule mpe akabi na maboko ya monguna bamir mpe bandako ya mokonzi na yango. Bato bagangi makasi kati na Tempelo ya Yawe ndenge bagangaka na mokolo ya feti oyo ekatama.


Napesi mitindo ete, na bituka nyonso ya mokili na ngai, bato nyonso batosa mpe bapesa Nzambe ya Daniele lokumu. Pamba te azali Nzambe na bomoi mpe ya seko na seko ; bokonzi na Ye ekotikala kobebisama te mpe ekowumela seko na seko.


« Bana ya Isalaele bakotelemisa bandako na bango ya kapo kolanda milongo na bango ya mampinga ; moto na moto akozala kati na molako na ye, na se ya bendele na ye, zingazinga ya Ndako ya kapo ya Bokutani, mwa mosika na yango. »


Yango wana, tango bokomona makambo ya nkele oyo epesaka bato pasi na motema, oyo mosakoli Daniele alobelaki, kosalema kati na Esika ya bule, —tika ete motangi asosola malamu—


Na tango wana, ndambo ya bato bayaki koyebisa Yesu ndenge nini Pilato abomaki bato ya Galile na ngonga oyo bazalaki kobonzela Nzambe bambeka.


Tango bokomona mampinga ya basoda ezingeli Yelusalemi, boyeba ete kobebisama na yango ekomi pene.


Efungolaki monoko na yango mpe ekomaki kobimisa maloba ya kofinga Nzambe, Kombo na Ye, evandelo na Ye mpe bavandi ya Lola.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ