Balobaki na ngai : « Bayuda oyo babikaki mpe batikalaki wuta na bowumbu bazali kovanda kati na etuka ya Yuda mpe bazali na pasi mingi mpe na soni makasi ; mir ya Yelusalemi etondi na madusu, mpe bikuke na yango ebebisamaki na moto. »
Na butu, nabimelaki na ekuke oyo ememaka na Lubwaku, nakendeki na nzela oyo ekenda na etima ya Dalagona mpe na Ekuke ya Fulu, mpo na kotala malamu-malamu bamir ya Yelusalemi, oyo etondaki na madusu mpe bikuke na yango esilaki kobebisama na moto.
Nzembo ya Azafi. Oh Nzambe, tala ndenge bato ya bikolo ya bapaya bakoti na makasi kati na libula na Yo, bakomisi Esika na Yo ya bule mbindo, mpe bakomisi Yelusalemi mipiku ya mabanga !
Monguna asemboli loboko na ye likolo ya bomengo nyonso ya Yelusalemi, bongo azali komona bikolo ya bapaya kokota na esika na ye ya bule, bikolo oyo Yo opekisaki kokota kati na lisanga na Yo.
Mampinga ya basoda na ye bakotelema mpo na kobebisa bosantu ya Tempelo mpe kobuka engumba batonga makasi ; bakopekisa kobonza mbeka ya mokolo na mokolo mpe bakotonga etumbelo mpo na nzambe oyo babengaka Zewusi.
Sik’oyo, Nzambe na biso, yoka losambo mpe mabondeli na ngai, mosali na Yo ! Mpo na lokumu na Yo, Nkolo, tala na miso ya ngolu Esika na Yo ya bule oyo ebebi !
Bakoboma bango na mopanga mpe bakomema bango na bowumbu kati na bikolo nyonso ya bapaya ; mpe bapagano bakonyata Yelusalemi kino tango ya bapagano ekosila koleka.
Tango bamemaki bakonzi yango epai ya Jozue, abengisaki mibali nyonso ya Isalaele mpe alobaki na bakonzi ya basoda oyo bazalaki na ye elongo : « Bopusana mpe botia makolo na bino na bakingo ya bakonzi oyo. » Bakonzi ya basoda bapusanaki mpe batiaki makolo na bango na bakingo ya bakonzi yango.
Kasi kozwa te molayi ya lopango ya libanda ya Tempelo, pamba te esilaki kokabama na maboko ya bikolo ya bapaya. Bapagano bakonyata engumba ya bule basanza tuku minei na mibale.