22 Oh Nzambe, telema mpe lobela Kombo na Yo ! Kanisa lisusu ndenge nini bazoba bafingaka Yo mikolo nyonso !
Oh Yawe, pesa litoyi mpe yoka ! Yawe, fungola miso mpe mona ! Yoka maloba oyo Senakeribe atindi mpo na kosambwisa Nzambe na bomoi.
Lamuka mpe telema mpo na kolongisa ngai ! Nzambe na ngai mpe Nkolo na ngai, kota likambo na ngai.
Nzembo ya Davidi. Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Eyembamaki na flite.
Yawe, kobosana te ete monguna afingi Yo, ete bato bazanga tina batioli Kombo na Yo !
Sik’oyo, eloko nini nasili kozwa awa, » elobi Yawe ? « Pamba te bamemaki bato na Ngai na pamba, mpe bato oyo bazali kokonza bango bazali koganga makasi, » elobi Yawe, « mpe, mokolo na mokolo mpe tango nyonso, Kombo na Ngai ezali kofingama.