Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Banzembo 74:2 - Mokanda na Bomoi

2 Kanisa lisusu lisanga ya bato na Yo, oyo osikola wuta kala, libota oyo okomisa libula na Yo. Kanisa ngomba Siona epai wapi ovandaka.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Banzembo 74:2
27 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Yawe asilikelaki bato na Ye, ayinaki libula na Ye.


Pamba te Yawe aponaki Jakobi, Isalaele, mpo ete azala ya Ye moko.


Esengo na ekolo oyo Yawe azali Nzambe na yango. Esengo na bato oyo aponaki mpo na libula na Ye.


Ngomba ya Bashani, ngomba ya Nzambe ; ngomba ya Bashani, ngomba ya basonge ebele,


Ozali Nzambe oyo asalaka bikamwa ; olakisi nguya na Yo kati na bikolo.


Bato oyo bayebi Kombo na Yo batiaka elikya na bango kati na Yo ; pamba te, Yo Yawe, osundolaka te bato oyo balukaka Yo.


Boyembela Yawe oyo avandaka kati na Siona banzembo ya masanzoli ; bopanza sango ya misala na Ye kati na bikolo.


Pamba te Yawe asundolaka bato na Ye te, abwakaka libula na Ye te.


Na bolingo na Yo, otambolisi bato oyo okangoli. Na makasi na Yo, omemi bango na Ndako na Yo ya bule.


Kobanga mpe somo ekweyeli bango. Na nguya ya loboko na Yo, bakomi bababa lokola libanga kino bato na Yo, oh Yawe, balekaki, kino bato oyo osikolaki balekaki.


Boye, bato oyo Yawe akangoli bakozonga, bakokota kati na Siona na banzembo ya esengo ; esengo ya libela na libela ekozala lokola motole na mito na bango ; bakotondisama na esengo mpe na kosepela, bongo pasi mpe minyoko ekokima mosika na bango.


Bakobenga bango Libota mosantu, basikolami na Yawe ; mpe bakobenga yo Engumba oyo alingaka, engumba oyo basundola te.


Oh Yelusalemi, natelemisi basenzeli na likolo ya bamir na yo ; bakovanda nye te, ezala na moyi to na butu. Bino bato oyo bosalaka ete Yawe akanisa lisusu Yelusalemi, bovanda kimia te ;


Yawe, mpo na nini kotika biso koyengayenga mosika ya nzela na Yo ? Mpo na nini kokomisa mitema na biso makasi mpo ete totosa Yo te ? Zongisa motema sima mpo na bolamu ya basali na Yo, mabota ya libula na Yo !


Tango nyonso bazalaki na pasi, Ye mpe azalaki koyoka pasi na motema ; boye, anjelu oyo atelemaka liboso na Ye abikisaki bango ; asikolaki bango na bolingo mpe na mawa na Ye, akongolaki bango mpe azalaki komema bango mikolo nyonso ya tango ya kala.


Kasi Ye oyo azali libula ya Jakobi akokani na bikeko wana te, pamba te azali Mokeli ya biloko nyonso, ezala ata Isalaele, ekolo oyo ezali libula na Ye ; Kombo na Ye ezali Yawe, Mokonzi ya mampinga.


Ye oyo azali libula ya Jakobi akokani na bikeko wana te, pamba te azali Mokeli ya biloko nyonso, ezala ata ekolo oyo ezali libula na Ye ; Kombo na Ye ezali Yawe, Mokonzi ya mampinga.


Bomibatela malamu mpe bobatela etonga nyonso oyo kati na yango Molimo Mosantu atiaki bino lokola bakengeli ; bobatela Lingomba ya Nzambe, pamba te asombaki yango na makila na Ye moko.


Pamba te eteni ya Yawe ezali bato na Ye ; Jakobi azali libula na Ye.


Kasi mpo na bino, Yawe azwaki bino mpe abimisaki bino na fulu ya moto ya bibende, oyo ezalaki Ejipito, mpo ete bozala bato ya libula na Ye ndenge bozali sik’oyo.


Nabondelaki Yawe mpe nalobaki : « Nkolo Yawe, kobebisa bato na Yo te, bazali libula na Yo moko oyo osikolaki na nguya monene na Yo mpe obimisaki na Ejipito na loboko na Yo ya nguya.


Nzokande bazali bato na Yo mpe libula na Yo, oyo obimisaki na nguya monene na Yo mpe na loboko na Yo ya nguya. »


amikabaki Ye moko mpo na biso, mpo ete akangola biso na mabe nyonso mpe apetola biso mpo na Ye moko lokola bato na Ye, oyo batondi na posa makasi ya kosala misala ya malamu.


Mpe bayembaki nzembo ya sika : « Obongi na kozwa buku mpe kobuka bikangelo na yango, pamba te babomaki Yo ; bongo na nzela ya makila na Yo, osikolaki, mpo na Nzambe, bato ya bikolo nyonso, ya nkota nyonso, ya mikili nyonso mpe ya mabota nyonso.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ