Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Banzembo 74:1 - Mokanda na Bomoi

1 Nzembo ya Azafi. Oh Nzambe, mpo na nini kosundola biso mpo na tango nyonso ? Mpo na nini kongalisa kanda na Yo likolo ya etonga oyo oleisaka ?

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Banzembo 74:1
30 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Nakosundola ndambo ya libula na Ngai oyo ekotikala, nakokaba bango na maboko ya banguna na bango. Banguna na bango bakobebisa bango mpe bakobotola biloko na bango,


Yawe, mpo na nini otelemi mosika ? Mpo na nini obombami na tango ya pasi ?


Boyeba ete Yawe nde azali Nzambe ; Ye nde asala biso, mpe tozali bato na Ye. Solo, tozali bato na Ye mpe etonga oyo aleisaka.


Mabele ekomaki koningana makasi, miboko ya bangomba elengaki mpe ebukanaki, pamba te Yawe asilikaki.


Nzoto na ngai ekomaka kosala pasi makasi tango bayini na ngai bafingaka ngai, tango balobaka na ngai mokolo mobimba : « Wapi Nzambe na yo ? »


Na moyi, Yawe apesaka mitindo epai ya bolingo na Ye ; na butu, nakumisaka Ye na banzembo mpe nasambelaka Nzambe ya bomoi na ngai.


Tomikumisaka mikolo nyonso kati na Nzambe mpe tokokumisa Kombo na Yo mpo na libela.


Nzambe ya banzambe, Yawe alobi, abengi mokili wuta na epai moyi ebimaka kino na epai elalaka.


Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Eyembamaki ndenge moko na « Lisi ya litatoli. » Nzembo ya Davidi mpo na koteya bato.


Moabi ezali sani monene oyo nasukolelaka, Edomi ezali esika oyo nabwakaka sandale na ngai. Mpo na Filisitia, nabetaka milolo ya elonga. »


Na butu, nakanisaka lisusu banzembo na ngai ; motema na ngai ezongelaka kokanisa, mpe molimo na ngai ekomaka komituna :


« Boni, Nkolo akobwaka biso penza mpo na libela ? Akosalela biso lisusu bolamu te ?


Nzembo ya Azafi. Bino, bato na ngai, boyoka malako na ngai ! Bopesa matoyi na maloba ya monoko na ngai !


Mpe biso, bato na Yo, etonga oyo oleisaka, tokosanzola Yo tango nyonso ; mpe na bikeke nyonso, tokosakola lokumu na Yo.


Kino tango nini, Yawe, okokangela biso kanda ? Kino tango nini zuwa na Yo ekopela lokola moto ?


Eh Yawe, Nzambe-Na-Nguya-Nyonso, kino tango nini okotombokela mabondeli ya bato na Yo ?


Boni, okosilikela biso penza mpo na libela ? Okokangela penza biso kanda mpo na tango nyonso ?


Pamba te azali Nzambe na biso ; tozali bato oyo aleisaka, etonga oyo abatelaka. Lelo, soki boyoki mongongo na Ye,


Moyize abondelaki Yawe, Nzambe na ye, mpe alobaki : — Eh Yawe ! Mpo na nini kanda na Yo ekweyela bato na Yo, oyo obimisaki na Ejipito, na nguya monene mpe na loboko ya makasi ?


Oh Yawe, tika ete kanda na Yo eleka ndelo te ; kokanisaka masumu na biso tango nyonso te ! Tala biso ndenge tozali kobondela, pamba te biso nyonso tozali bato na Yo.


« Mawa na babateli bibwele oyo bazali koboma mpe kobungisa bibwele na Ngai, » elobi Yawe.


Tala liloba oyo Yawe alobi : « Soki kaka bakoki komeka molayi ya likolo mpe komona miboko ya mabele, wana nakobwaka bana nyonso ya Isalaele mpo na makambo nyonso oyo basali, » elobi Yawe.


Boni, osundoli biso solo mpo na libela mpe otombokeli biso na kanda eleka ndelo ?


Bino, bibwele na Ngai, bibwele oyo naleisaka, bozali bato ; mpe Ngai, nazali Nzambe na bino, elobi Nkolo Yawe. › »


Na Kombo na Ngai, elobi Nkolo Yawe, lokola bibwele na Ngai ezangi mobateli, bongo bakomi koyiba yango mpe ekomi bilei ya banyama nyonso ya zamba ; lokola babateli bibwele na Ngai bazalaki koluka bibwele na Ngai te, kasi bazalaki kaka koluka kaka bolamu na bango moko koleka bolamu ya bibwele na Ngai ;


Oh etonga moke, bobanga te ! Pamba te Tata na bino asepelaki kopesa bino Bokonzi !


Yawe akotia ye pembeni kati na bikolo nyonso ya Isalaele, akokaba ye na pasi ndenge ezali bilakeli mabe nyonso ya boyokani oyo ekomama kati na buku ya Mobeko.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ